Kobatelama na bomoi Congo eza na mabongisi ebele oyo etali bomoi ya bato pona kobatela bato nyonso oyo bafandi na Congo na kobatelama na makama soki moto ye moko akoki komisunga na yango to kofuta motuya ya misolo te. Mabongisi yango ezali: • Kolengela kimobange ya baoyo bazali na bomoi • Kolengela Bokakatani • Mabongisi na tango ya maladi to ya likama • Mabongisi na tango ya bozangi mosala • Mabongisi ya mbotama ya bana pe lisungi ya libota Mabongisi nyonso wana ezali kotala makama nyonso lokola lifuta ya sima kotika mosala, lisungi na bobungisi mbano ya mombomgo to pe misolo ya lisungi ya libota to pe lisusu mikumba ya misolo nyonso ya kofuta na tango ya maladi to pe ya likama. Na tango misolo ya kolengela kimobange ya baoyo bazali na bomoi to kolengela bokakatani bozui misusu ezali kokokisa baposa nyonso ya bomoi ya moto, bakobakisa lisusu lisungi mosusu. Misolo nyonso oyo moto azwaka lokola lisungi ya bomoi ezwamaka na mbongo bazali kokata na lifuta ya suka ya sanza. Basali na bakonzi ya mosala bazali kopesa yango kati-kati. Na oyo etali lisungi na tango ya maladi, moto oyo asengeli na yango akofuta na kotalaka te bozwi na ye. Na oyo etali bato ya bozwi moke, ba Contons pe ba Confédérations bakotia maboko pona lisungi yango. Pona bapaya ya mibali pe ya basi, eza na mabongisi ya lolenge mosusu. Boyokani oyo ezali kati ya Congo na Union Africaine oyo etali kotambola na bonsomi ebongisi lolenge nyonso ya mabongisi ya bobateli ya bomoi. Baye bafandi na UA pe na Congo bazali ndenge moko. Elongo na ndambu ya Bikolo, Congo asali boyokani ebongisami pona kobatela bomoi. Pona baoyo bawuti na bamboka oyo bazali na kati ya boyokani wana te, ebongisami pona bango mabongisi ya ndenge mosusu. Na tango ya mpasi, moto nyonso oyo azali na Congo asengeli, kotosa Mobeko ya Congo, na lisungi ya lombango. Likambo oyo etali pe bandeko oyo makambo na bango ebebi to baoyo bazangi mikanda. |
|